Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 22:17 - Mokanda na Bomoi

17 Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye : « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe ; pamba te bango mpe basungaki Davidi : bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 22:17
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.


Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.


Boye, na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli na ye, oyo bazalaki kobatela ekotelo ya ndako ya mokonzi.


Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi.


Tango kaka Jewu asilisaki kobongisa mbeka ya kotumba, apesaki mitindo epai na bakengeli mpe na bakambi na bango : « Bokota mpe boboma bango. Bokimisa moto moko te. » Boye, babomaki bango na mopanga. Bakengeli mpe bakonzi ya basoda babwakaki bibembe na libanda mpe bakotaki kino na esika ya bule ya ndako ya nzambe Bala.


Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala ; batikaki bana mibali na bomoi.


Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?


Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.


Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.


Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi.


Saulo alobaki na ye : — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ?


Kasi mokonzi alobaki : — Ayimeleki, okokufa solo ; yo mpe libota mobimba ya botata na yo.


Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »


Alobaki na bango : — Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala : Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda ; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ