Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.
Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi ; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi.
Saulo alobaki na ye : — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ?
Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ?