Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 22:10 - Mokanda na Bomoi

10 Ayimeleki atunaki mpo na ye makambo epai na Yawe, mpe apesaki ye bilei mpe mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 22:10
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.


Boye, batunaki lisusu Yawe : — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? Yawe azongisaki : — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.


Nganga-Nzambe azongisaki : — Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente ; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo ; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana. Davidi alobaki : — Mopanga moko te ekokani na yango ; pesa ngai yango.


Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi ; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi.


Saulo alobaki na ye : — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ?


Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe ? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te ; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.


Davidi atunaki lisusu : — Bakambi ya Keila bakokaba penza ngai mpe bato na ngai na maboko ya bato ya Saulo ? Yawe alobaki : — Iyo, bakokaba yo.


Davidi atunaki Yawe, alobaki : — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ? Yawe azongiselaki ye : — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila.


Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo.


Bongo Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? Yawe azongiselaki ye : — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ