Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 21:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 21:8
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na etinda ya mokonzi, bantoma oyo batambolaka na mpunda ya mokonzi babimaki na lombangu mpe bapanzaki sango ya mobeko yango kati na engumba Size.


Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.


Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso.


Davidi atunaki Ayimeleki : — Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo ? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu.


Boye Davidi alobaki na Abiatari : « Mokolo wana, nayebaki malamu ete lokola Doegi, moto ya Edomi, azalaki wana, akokaki kozanga te koyebisa Saulo. Boye ezali mpo na ngai nde bato nyonso ya libota ya botata na yo bakufi !


Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki : « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ