Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 21:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo ? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 21:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize alobaki na bango : — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino.


Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.


Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa.


mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli : — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala ?


Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.


Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki : — Mokonzi apesaki ngai mosala moko boye mpe alobaki na ngai : « Tika ete moto moko te ayeba ata likambo moko na mosala oyo natindi yo. » Na tina na yango nde nasengaki na bato na ngai ete tokutana na esika moko.


Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe : — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ