14 Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu.
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.
Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati.
Akishi alobaki na basali na ye : « Botala tata oyo, azali moto ya liboma ! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai ?