13 Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati.
Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.
« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?
Soki mobali to mwasi abeli bokono ya poso ya nzoto, ezala na moto to na mbanga,
Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.
Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu.