Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 21:11 - Mokanda na Bomoi

11 Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 21:11
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.


Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »


Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati.


Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ