Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:9 - Mokanda na Bomoi

9 Jonatan alobaki : — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:9
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.


Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. »


Davidi atunaki Jonatan : — Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai ?


Bongo Jonatan agangaki lisusu : « Sala noki ! Kima mbangu, kotelema te ! » Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye.


Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › »


Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ