Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:8 - Mokanda na Bomoi

8 Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.


Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te.


Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »


Bato mosusu ya libota ya Benjame mpe ya Yuda bayaki lisusu kosangana na Davidi na ndako na ye ya makasi.


Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »


Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !


Soki nasali mabe to nasali likambo oyo ekoki komemela ngai etumbu ya kufa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Sezare akata likambo na ngai !


Banongi bayebisaki ye : — Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo.


— Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !


Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi : — Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko.


Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko.


Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.


Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo : « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi ! »


Jonatan alobaki : — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !


Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ