Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:5 - Mokanda na Bomoi

5 Davidi azongiselaki Jonatan : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mobali na ye atunaki : — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te ! Azongisaki : — Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu.


Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.


Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze !


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.


Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini mpo ete toteka ble na biso ? Tango nini mokolo ya Saba ekosila mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? » Tokosalela bakopo ya mike mpo ete tomatisa talo, mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.


Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »


Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te.


Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba Yesu, kasi abombamaki mpe abimaki libanda ya lopango ya Tempelo.


Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere.


Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba.


Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.


Bongo Jonatan alobaki na Davidi : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba.


Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.


Davidi abombamaki kati na zamba. Bongo na tango ya feti ya Sanza ya Sika, mokonzi avandaki na mesa mpo na kolia.


Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan : — Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo ?


Jonatan alobaki na Davidi : — Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo.


Soki tata na yo amitungisi mpo na kozanga na ngai komonana, okoloba na ye : « Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na engumba na ye, Beteleemi, pamba te etuka mobimba ekosepela kuna mbeka oyo babonzaka mibu nyonso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ