Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:41 - Mokanda na Bomoi

41 Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:41
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.


Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.


Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela.


Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se.


Bazongisaki : — Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu. Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye.


Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.


Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.


Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo ! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi !


Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki : — Oh mokonzi, sunga ngai !


Mokonzi azongisaki : — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.


Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.


Batisheba agumbamaki mpe afukamaki liboso ya mokonzi ; mpe mokonzi atunaki ye : — Boni, olingi nini ?


Bayebisaki mokonzi : — Tala mosakoli Natan ! Mosakoli Natan akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na se.


Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi ; alobaki : — Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi !


Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze ;


Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?


Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.


Bongo Jonatan apesaki bibundeli na ye epai ya elenge mobali mpe alobaki : « Kende kozongisa yango na engumba. »


Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.


Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ