38 Bongo Jonatan agangaki lisusu : « Sala noki ! Kima mbangu, kotelema te ! » Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye.
Mpe tango elenge mobali akomaki na esika oyo likonga ya Jonatan ekweyaki, Jonatan alobaki na ye na mongongo makasi : « Boni, likonga ezali liboso na yo te ? »
Elenge mobali ayebaki ata eloko moko te na makambo oyo nyonso ; kaka Jonatan mpe Davidi nde bayebaki.