35 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko.
Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye.
Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.
Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi.
Alobaki na elenge mobali : « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. » Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye.