Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:32 - Mokanda na Bomoi

32 Jonatan atunaki Saulo, tata na ye : — Basengeli koboma ye mpo na nini ? Asali nini ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:32
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye : — Mbeba nini nasalaki ? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye ?


Kozala molingami te ya moto ya kanda, mpe kosangana te na moto ya motema moto-moto,


Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.


Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Pilato atunaki lisusu : — Mabe nini asali ? Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : — Baka ye na ekulusu !


Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye.


— Boni, mibeko na biso ekoki kokatela moto etumbu na kozanga koyoka ye liboso, mpe na kozanga koyeba mabe oyo asili kosala ?


Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba : « Nakobamba Davidi na mir. » Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale.


Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo : « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali.


Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »


Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye : — Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ?


Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.


Ayimeleki azongiselaki mokonzi : — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi ? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ