31 Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.
Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.
Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye : — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.
Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ?
Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. »
Likambo oyo osali ezali malamu te. Na Kombo na Yawe, yo mpe bato na yo bosengeli kokufa ; pamba te bobateli te nkolo na bino, mopakolami na Yawe. Botala zingazinga na bino ! Wapi likonga mpe eloko ya mayi ya mokonzi, oyo ezalaki pembeni ya moto na ye ?