Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:3
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Itayi azongiselaki mokonzi : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.


Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.


Eliya alobaki na Elize : — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Jeriko.


Eliya alobaki na ye : — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.


Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.


Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !


soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »


Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka.


Tosa Yawe, Nzambe na yo ; salela kaka Ye mpe lapa ndayi na yo na Kombo na Ye.


Nzokande, bato bakataka seleka na kombo ya moto oyo aleki bango, mpe seleka ezalaka ndanga oyo esukisaka tembe nyonso.


Ana alobaki na ye : — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe.


Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? Abineri azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.


Jonatan azongisaki : — Te, Ekosalema te ! Okokufa te ! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo ? Ezali bongo te.


Jonatan alobaki na Davidi : — Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo.


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ