Boye, Sarayi alobaki na Abrami : — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »
Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso ! Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga.
Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › »