20 Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko.
Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.
Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye : « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba : « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. »
Alobaki na elenge mobali : « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. » Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye.