Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:2 - Mokanda na Bomoi

2 Jonatan azongisaki : — Te, Ekosalema te ! Okokufa te ! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo ? Ezali bongo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bazongiselaki ye : — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye ? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te.


Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo ; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.


Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka ; ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.


Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te ; namizongisaki sima te.


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.


pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo ; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai.


Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye.


Bato bazongisaki : — Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu !


Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.


Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye : — Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ?


Jonatan alobaki na Davidi : « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango,


Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »


Nzokande, mokolo moko liboso ete Saulo akoma, Yawe amonisaki likambo yango epai ya Samuele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ