Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:19 - Mokanda na Bomoi

19 Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:19
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.


Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.


Bongo Jonatan alobaki na Davidi : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba.


Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko.


Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko.


Davidi azongiselaki Jonatan : — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ