1 Samuele 20:17 - Mokanda na Bomoi17 Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.