Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 20:12 - Mokanda na Bomoi

12 Jonatan alobaki na Davidi : « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 20:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.


Amoni banzela na ngai te ? Atangi matambe na ngai nyonso te ?


Soki otali malamu motema na ngai, soki olandeli ngai ata na butu mpe omeki ngai, okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te, monoko na ngai ebukaki mobeko te.


Makanisi ya motema ya moto ezalaka lokola ebale ya mozindo, moto ya mayele alukaka kotoka kati na yango.


— Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !


Jonatan azongiselaki Davidi : — Yaka, tokende na zamba ! Boye, bango mibale bakendeki nzela moko na zamba.


wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !


Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ