Jonatan alobaki : — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te !
Moko kati na basali ya Nabali alobaki na Abigayili, mwasi ya Nabali : « Davidi atindaki bantoma wuta na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi ye atombokelaki bango.
Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »