Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo ; ozali na bokonzi likolo na nyonso, makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.
Alobaki : « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; tika ete Kombo na Ye ekumisama ! »
Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › »