1 Samuele 2:35 - Mokanda na Bomoi35 Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele.
Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.