Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:34 - Mokanda na Bomoi

34 Mpe makambo oyo ekokweyela bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, ekozala elembo mpo na yo : bango mibale bakokufa mokolo moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:34
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo : — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi : Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.


Mpo na yo, telema mpe zonga na ndako na yo. Tango kaka okotia makolo na yo kati na engumba na yo, mwana na yo ya mobali akokufa.


Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye : bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele.


Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo.


Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema ; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.


Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka.


Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki.


Moto oyo amemaki sango azongisaki : — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe.


Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele ! Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi.


Alobaki : « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ