Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:32 - Mokanda na Bomoi

32 Atako bakosalela Isalaele bolamu, kasi yo okomona pasi kati na Ndako na Ngai ; mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:32
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange.


Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema ; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.


Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki.


Alobaki : « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. »


Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ