31 Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
Balevi oyo bakomaki mosika na Ngai, tango Isalaele abungaki nzela mpe azalaki koyengayenga mosika na Ngai mpo na kolanda banzambe na bango ya bikeko, bakomema mikumba ya masumu na bango.
Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.
Bato ya Filisitia batandamaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Mpe wana bitumba ekomaki makasi, bato ya Filisitia balongaki bato ya Isalaele mpe babomaki na bitumba yango basoda ya Isalaele, pene nkoto minei.