Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:3
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.


tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, mpe akomona ete ngai nasali mabe te.


Nkolo na biso azali monene mpe atonda na nguya ; mayele na Ye ezali na mondelo te.


Bakomisi mitema na bango makasi, mpe bazali koloba na lolendo.


Yawe, sala ete nayokisama soni te, pamba te nabeleli Yo. Kasi tika ete bato mabe nde bayoka soni mpe bakita kino na mboka ya bakufi.


Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,


Nazali koloba na moto ya lofundu : « Kotombola lisusu mapeka te ; » mpe na bato mabe : « Bosala lisusu lolendo te.


Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga ; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa !


Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.


Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?


Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.


Nzela ya moto ya sembo, ezali alima ; Yo oyo ozali Sembo, okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.


Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? Nani oyo omatiselaki mongongo mpe otalaki na miso ya lolendo ? Mosantu ya Isalaele !


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Botelemelaki Ngai mpe bolobaki na Ngai na maloba ya lolendo ; nayokaki yango Ngai moko.


Tekel  : bameki kilo na yo na emekelo kilo, mpe emonani ete ozali na yo pepele ;


Yawe alobi : « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai. Kasi bozali kotuna : ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo ? ›


Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.


— Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo !


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


Zebuli alobaki na Gali : — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda !


Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ