Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:28 - Mokanda na Bomoi

28 Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:28
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natan alobaki na Davidi : — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ;


Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


Tongo nyonso, Aron akotumba ansa na etumbelo yango tango akobongisa minda ; mpe pokwa nyonso, tango akopelisa yango.


Aron asengeli kotumba lisusu ansa tango akopelisa minda na pokwa mpo ete ansa epelaka tango nyonso liboso ya Yawe mpo na libela.


Bongo bagato oyo ekotikala, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe.


Mbeka nyonso oyo Nganga-Nzambe akobonza na mobimba na yango ekoliama te, ezala ata ndambo na yango. »


Bokopesa epai ya Nganga-Nzambe lokola likabo mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ya bambeka ya boyokani.


Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango.


Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye : — Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye ; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye.


Napesi yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola ekateli ya libele na libela, biloko nyonso oyo bana ya Isalaele bakotiaka pembeni mpo na kobonza epai na Yawe lokola makabo ya bule. Ezali boyokani ya seko, oyo ekobongwanaka te liboso ya Yawe mpo na yo mpe bakitani na yo. »


Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.


Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ