Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:26 - Mokanda na Bomoi

26 Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:26
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.


Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !


Okozwa ngolu mpe kombo ya malamu na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato.


Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.


Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.


Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.


Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.


Moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo asepelisaka Nzambe, mpe bato bandimaka ye.


Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye.


Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.


Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ