Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:23 - Mokanda na Bomoi

23 Alobaki na bango : « Mpo na nini bozali kosala makambo mabe boye ? Nazali koyoka bato nyonso kolobela yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:23
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? Te ! Bazali koyoka ata soni te ; bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, bakokweyisama tango bakozwa etumbu, elobi Yawe.


— Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango.


Akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye : — Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ?


Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili.


Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele ; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.


Te, bana na ngai ! Sango oyo nazali koyoka bato ya Yawe kopanza na tina na bino ezali malamu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ