Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:18
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Davidi elongo na Balevi nyonso oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani, bayembi mpe Kenania, mokambi ya bayembi : bango nyonso balataki banzambala ya lino ya talo. Kasi Davidi abakisaki lisusu efode ya lino na likolo.


Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


Alatisaki Aron nzambala mpe akangaki ye mokaba na loketo ; alatisaki ye kazaka mpe efode, azingelaki ye na mokaba ya efode.


Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.


Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama ; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli.


Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.


Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi : « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. » Boye Doegi, moto ya Edomi, abalukaki mpe abomaki bango. Na mokolo wana, abomaki bato tuku mwambe na mitano oyo balataki efode ya lino.


Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ