Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 azalaki kokotisa yango na sani, na nzungu, na kikalungu to na mbeki ; mpe azalaki kokamata, mpo na Nganga-Nzambe, eteni nyonso ya nyama oyo ezalaki kokangama na kanya. Ezali ndenge wana nde bana mibali ya Eli bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende kuna na Silo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 2:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. Bazali babateli oyo bazangi bososoli, moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko mpe alukaka kaka bolamu na ye moko.


Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele.


Bozali kodunda misuni ya bato ya libota na ngai, bozali kolongola bango poso ya nzoto mpe kobuka mikuwa na bango. Bozali kokata bango mike-mike lokola misuni oyo bakalingaka to oyo batokisaka na nzungu. »


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Tala ndenge nini Banganga-Nzambe oyo bazalaki kosala na miso ya bato : tango nyonso moto moko azalaki koya kobonza mbeka, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya na ngonga ya kotumba mbeka yango, azalaki kosimba kanya ya misapi misato na loboko na ye,


Kutu, liboso ete mafuta ya mbeka etumbama, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya koloba na moto oyo azalaki kobonza mbeka : « Longolaka libela eteni ya Nganga-Nzambe, pamba te akondima te kozwa na maboko na yo nyama oyo yo moko otumbi ; kasi akondima kaka nyama ya mobesu. »


Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ