Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.
Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te.
Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.