1 Ana asambelaki na maloba oyo : Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.
Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ; Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni.
Abongisi elombe mokangoli mpo na bato na Ye ! Ezali likambo oyo bayengebene na Ye nyonso, bana nyonso ya Isalaele, bato oyo balingaka Ye, basengeli kokumisa Yawe mpo na yango. Bokumisa Yawe !
Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! Azindisi mpunda mpe motambolisi na yango kati na ebale monene.
Miriami ayembaki elongo na bango : « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »
Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! »
Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,
Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »
Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te,