Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 19:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 19:7
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.


Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Moyize alobaki na Yawe : — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo.


Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.


Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli.


Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.


Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango.


Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye.


Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »


Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ