1 Samuele 19:5 - Mokanda na Bomoi5 Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.