Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 19:24 - Mokanda na Bomoi

24 Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele ; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka : « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 19:24
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.


Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?


kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.


Yango wana, nakolela mpe nakosala matanga, nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu, nakoganga lokola mbwa ya zamba mpe nakolela lokola maligbanga.


maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :


Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpe batunaki : — Boni, ezali ye te moto oyo azalaki konyokola makasi, kati na Yelusalemi, bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu ? Boni, ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe ?


Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu.


Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele.


Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ