23 Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.
Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›
Nzokande, makambo oyo azalaki koloba na bango ewutaki na makanisi na ye moko te ; kasi lokola azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe na mobu wana, yango wana asakolaki ete Yesu asengelaki kokufa mpo na ekolo ya Bayuda.
Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki : « Bongo nani azali motambolisi na bango ? » Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo : « Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? »
Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.
Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.
Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki : — Samuele mpe Davidi bazali wapi ? Bazongiselaki ye : — Bazali na Nayoti ya Rama.