Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 19:18 - Mokanda na Bomoi

18 Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 19:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela : « Bato nyonso bazali bakosi. »


Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana.


Bongo Samuele azongaki na Rama, mpe Saulo akendeki na ndako na ye, na Gibea ya Saulo.


Sango ekomaki epai ya Saulo : « Davidi azali na Nayoti ya Rama. »


Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki : — Samuele mpe Davidi bazali wapi ? Bazongiselaki ye : — Bazali na Nayoti ya Rama.


Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.


Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye : — Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ?


Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati.


Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka.


Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ