15 Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango : « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye. »
soki bato ya libota na ngai balobaka te : ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? ›
Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.
Makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosopa makila.
Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki : « Azali kobela. »
Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango.
Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »