13 Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto ; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto.
Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali.
Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. »
Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba.