1 Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.
Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi : — Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye.
Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.
Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki : « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi ! »
Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.