Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki : « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 18:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.


Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.


Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye : — Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya ? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai ; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya !


Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi.


Lolendo ememaka kaka na koswana, kasi bato oyo bayokaka toli bazwaka bwanya.


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.


Balami alobaki na anjelu ya Yawe : — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.


Mpe lisusu, bokanisi ete ezali na pamba nde Makomi elobi : « Nzambe azalaka na zuwa makasi mpo na Molimo oyo atia kati na biso ? »


Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te.


Bongo Samuele alobaki na ye : — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.


Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.


Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.


Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.


Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ