Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 18:7 - Mokanda na Bomoi

7 Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 18:7
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi basoda balobaki : — Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo ; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba.


Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :


Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.


Miriami ayembaki elongo na bango : « Boyembela Yawe, pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; azindisi na ebale monene, mpunda mpe motambolisi na yango. »


Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati.


Kasi basali ya Akishi balobaki na ye : « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka ? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye : ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi ? › »


Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina : « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ