Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 18:4 - Mokanda na Bomoi

4 Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 18:4
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo.


Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te soki esopi makila ya banguna te, mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te ; mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te soki ekokisi mosala na yango te.


Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.


mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide.


Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.


Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ