1 Samuele 18:30 - Mokanda na Bomoi30 Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo !
Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.