Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 18:28 - Mokanda na Bomoi

28 Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 18:28
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazongiselaki ye : — Tomoni ya solo ete Yawe azali elongo na yo, yango wana tolobaki : « Tika ete tosala boyokani kati na biso mpe yo na nzela ya ndayi.


Kasi Labani alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te ; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.


Tango nkolo na ye asosolaki ete Yawe azali elongo na Jozefi, mpe ete Yawe azali kolongisa ye na makambo nyonso oyo azali kosala,


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi.


Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi.


Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki.


Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.


Saulo alobaki na Davidi : — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ